Kɔ́ngɔ-Kinshasa

From Wikipedia

Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki
République Démocratique du Congo
Repubilika ya Kongo Demokratika
Jamhuri ya Kidemokrasia ya Kongo
Ditunga dia Kongu wa Mungalaata
Bɛndɛ́lɛ ya Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki Almwali ya Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki
(Bɛndɛ́lɛ) (Almwali)
Mokáno mwa ekólo: Bosémbo, Bobóto, Mosálá
Loyémbo ya lokúmú: Debout Congolais
Esíká ya Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki
Mbóka-mokonzi Kinsásá
Engúmba monɛ́nɛ koleka Kinsásá
Nkótá ya lɛ́ta lifalansé
Nkótá ya ekólo lingála, kiswahili,
ciluba, kikɔ́ngɔ
Mokonzi Republiki
Joseph Kabila
dipanda
- dipanda na Bɛ́lɛjika

- 1960-06-30
Etando
 • Nyɛ̂
 • Mái (%)
 
2 345 410 km² (ya 12)
3.3
Mito

 • 2006 ndakisa-mitúya
 • 1984 botángi
 • Bato na etando

 
62 660 551 (23)
29,916,800
27/km² (ya 182)
BOTIBO (BOZIBI)
 • Nyɛ̂
 • moto na moto
2003 ndakisa-mitúya
35,798 (ya 7)
ya 189 (ya 189)
Mosɔlɔ falánga ya Kɔ́ngɔ (CFR)
Ngonga
 • Summer (DST)
UTC (UTC+1 na +2)
- (UTC-)
Internet TLD .CD
Calling code +243


Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki ezalí esé ya Afríka ya Mambénga, ezwamí na ndelo ya ye ya mwa sánzá ya motóbá mikɔlɔ 30 1960, ekólo ya makokí, lipanda, bonsɔ́mí, ekanganí mpé ekabwaní tɛ́, ya bato, ya bokonzi boutí na bato mpé eponi eyamba yɔ̂kɔ tɛ́.

Etápe

[kobalola] Lokótá

Na ekolo Kɔ́ngɔ elobamí nkótá kama míbalé. Nyɔ́nsɔ wâná elakísí boyébí bwa bato ya bomɛngo etondi mabelé. Ciluba, kikongo, lingála mpé kiswahili ezalí bakótá banɛ́nɛ banei ya ekólo, kasi bakótá kama míbalé balobaka na ekólo Kɔ́ngɔ.

Míngi śé na káti ya bakótá bya ekólo bokoyéba etando ya bikelá, mabelé, nyama mpé nzeté.

Bamongo bazalí na bakombo míngi ya nzeté ya mbíla na maye manso basálelaka. Sɔ̂lɔ, nzeté ya mbíla eyébaní káka mpó na mafúta na masanga tɛ̂. Eyébaní lokóla nkísi ekosílisa makɔnɔ, naye mpé bakosála bitúnga mpé bikila kila.

[kobalola] Likambo

Ekakoli ya molayi : Mpo ya Kɔ́ngɔ-Kinshasa

Tala mpé: Ntangó ya banɔ́kɔ́(Kɔ́ngɔ Demokratiki)


Zaïre ezalákí banda 1971 te 1999 nkómbó óyo ebêngámákí Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki, mfalanga ya ekólo wâná, mpé ebale óyo epésáká ekólo Kɔ́ngɔ ebimélí na yě see mɔ̌kɔ́ na mayi-mozindo Atalantiki.

Congo belge elongákí lipanda na 1960, o nkómbó ya « Republiki ya Kɔ́ngɔ  », nkómbó nsé mɔ̌kɔ́ na kolonia ya kala ya Falansia - Kɔ́ngɔ-Brazzaville. Nkómbó ya Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki ezwamákí na 1966, kasi bikólo babale basilákí koyébana míngi-míngi, mpé kokesana na nkómbó ya bingumba-mikonzi ba bángo, mpó na komibengama Kɔ́ngɔ-Léopoldville (mpé Kɔ́ngɔ-Kinshasa na sima 1965), na Kɔ́ngɔ-Brazzaville.

Nkómbó ya kala Nkómbó ya sika (1965)
Léopoldville Kinshasa
Stanleyville Kisangani
Élisabethville Lubumbashi
Jadotville Likasi
Albertville Kalemie
Cocquilhatville Mbandaka
Costermansville Bukavu
Bakwanga Mbuji-Mayi
Luluabourg Kananga
Nouvelle Anvers Makanza
Port Francqui Ilebo
Banningville Bandundu
Paulis Isiro
Thysville Mbanza-Ngungu
Leverville Lusanga
Baudoinville Moba
Ponthierville Ubundu
Banzyville Mobayi-Mbongo
Élisabetha Lukutu
Charlesville Djokupunda


[kobalola] Bato

Ekakoli ya molayi : fr:Démographie de la République démocratique du Congo


Évolution de la démographie entre 1961 et 2003 (chiffre de la FAO, 2005). Population en milliers d'habitants.
Enlarge
Évolution de la démographie entre 1961 et 2003 (chiffre de la FAO, 2005). Population en milliers d'habitants.
est. bato source
1990 37 405 000 (UNHCR Bikólo ya Molɔngɔ)
1991
1992
1993
1994
1995 45 453 000 (UNHCR Bikólo ya Molɔngɔ)
1996 46 812 000 (UNHCR Bikólo ya Molɔngɔ)
1997 48 040 000 (UNHCR Bikólo ya Molɔngɔ)
1998
1999
2000 51 390 000 (globaldefence.net)
2001 53 624 718 (yuli; CIA World Factbook)
2002 55 225 478 (yuli; CIA World Factbook)
2003 56 625 039 (yuli; CIA World Factbook)
2004 58 318 000 (CIA World Factbook)
2005 60 085 804 (yuli; CIA World Factbook)


[kobalola] Bitúká bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa

Enlarge

Ekakoli ya molayi : Bitúká bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa

Biteni mikonzi bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa mibengami Bitúká (Provinces ya lifalansé). Kinshasa ezalí mboka mokonzi ya ekólo mpé efándeli ya bitúlúká bya ekólo. Ezalí na makokí ma engúmba. Bingúmba mpé bitúká biyángélámí, bizwí makokí ma koyángela yangó mɔ̌kɔ́ na mobéko mpé bikambémí na bato baye bazwamí na bitúká bike bya mbóka. Bitúká biina bia bonsɔ́mí bizalí mbóka mondɛ́lɛ́, komine, seketele mpé sefeli. Bitúká bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa bazalí:

  1. Bandundu
  2. Bas-Congo
  3. Ekwatéli
  4. Kasaï-Occidental
  5. Kasaï-Oriental
  6. Katanga
  7. Kinshasa
  8. Maniema
  9. Nord-Kivu
  10. Orientale
  11. Sud-Kivu

[kobalola] Bikela

Ekolo Kongo Demokratiki ekenda sango mokili mobimba mpona biloko bya mabele mwaye. Ya solo ekolo moko lisusu te na Afrika akokani naye na banyama mpe zamba ndenge na ndenge.

[kobalola] Zamba na banyama : bobateli bwa bikela o kati ya zamba ya leta

Banganga mayele batangi ndenge 11000 ya banzete, 409 ya banyama ya mabele, 1086 ya bandeke, 1069 ya mbisi mpe 152 ya banyoka. Bokozwa te na ekolo esusu ya Afrika banzete mpe banyama etangami ndenge na ndenge.

  • Na ekolo Kongo, bokozwa bangomba, bisobe, bibale, babweta na bangomba moto; bokozwa mpe zamba ndenge mingi lokola zamba ya mokili mwa molunge, nzete ya bozangi mai, bisobe mpe bikombo.
  • Banyama ya seko baye bavandaka nse wana, lokola mondonga, bonobo, lokulokoko lwa Kongo, mpe gambala ya mai. Soki tobebisi zamba na bango, bakolimwa elongo.

[kobalola] Bikela bikopesa biloko bya kobongola

Mbongo ekotisa ba nzete mpe mabanga ya talo ezali na esika enene na kati ya ekolo Kongo.

  • Mabele o ekolo Kongo etondi mabanga ya talo lokola wolo, kobalti, etani, koltani, jemanyu, diama, mbongo, mbengi, etc.

Na tango ya kala, mabanga masusu mazalaki na tina te. Lelo tina na bango tembe nye. Lokola koltani ebwakamaki lokola bosoto bwa etani. Lelo, mosala ya elektroniki esengi tantalu, mpe na mikolo mya lelo, balokotaka bandambo ya etani mpona kobongola.

Aluminyu na mbengi ezwamaka na bandambo ya mituka mpe biloko bya mwinda. Na mboka minene, ba fondele basalaka biloko ya bosalisi, kasi tango mosusu, biloko ya kotala elengi. Mpona mipaya, bakosala biloko na singa ya aluminyu, soki mpe na mbengi ; mpona bana mike, bakosala biloko ya esano.

Nzete ezali na lisalisi linene na kati ya mboka, lokola nkoni, ekoki mpe kobongwama, bakoteka ye mpe na mboka mopaya. Nzete ya ekolo esengami mingi mpona mosala ya libaya, nzete ya mwindo mpona biloko ya ndako, mabaya ya kotika na mabele, mpe mabaya ya mbongwana enene.

[kobalola] Bikela bikopesa bilei mpe nkisi

Bikela bipesi banyama, bankasa mpe banzete ya kosalisa bokono ndenge na ndenge. Bisaleli bina ya mikolo na mikolo elakisi mayele mwa bato.

Soki tolongoli bokila na ndobo, bato ya mboka balokota na zamba bambuma, banzenze, mayebo, nzoi mpe bakotekisa na nzela soki mpe na zando.

Na mboka misusu mbiye ekopesa moto bokasi na 40%.

Bikela esali mpe lokola ndako ya minganga.

  • Nkisi lokola ilulumba esalisa bokono bwa pulu pulu, esilisa mokosa, bokono ya ndeke mpe kosukosu. Esengeli toyeba. Mayele ya banganga nkisi ya Balele etangi banzete 123. Bosalisi ya banganga ya Baluba esengi mingi banzembo.
  • Babenga kombo Bambuti mpe Baife baye bavandi na zamba Ituri bazali na bikela bya bango. Bambuti bayebi banyama ya koleka kama mibale, mpe banzete ya koleka kama moko. Bakoboma nyama na basinga. Kasi Baife, bakobenga mpe bakoboma nyama na mbanzi mpe na makonga.

[kobalola] Politiki

Ekakoli ya molayi : Politiki bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa

Mobéko Likonzi :

Bakambi Ekolo :

Bakambi Lɛ́ta :

  • 1960 - 1960 Patrice Lumumba
  • 1961 - 1961 Joseph Iléo
  • 1961 - 1964 Cyrille Adoula
  • 1964 - 1965 Moïse Tshombe
  • 1965 - 1965 Evariste Kimba
  • 1965 - 1966 Léonard Mulamba
  • 1966 - 1977  ?
  • 1977 - 1979 Mpinga Kasenga
  • 1979 - 1980 Bo-Boliko Lokonga Mihambo
  • 1980 - 1981 Jean Nguza Karl-I-Bond
  • 1981 - 1982 Joseph Untube N'singa Udjuu
  • 1982 - 1986 Kengo Wa Dondo
  • 1987 - 1988 Mabi Mulumba
  • 1988 - 1988 Sambwa Pida Nbagui
  • 1988 - 1990 Kengo wa Dondo
  • 1990 - 1991 Lunda Bululu
  • 1991 - 1991 Mulumba Lukoji
  • 1991 - 1991 Étienne Tshisekedi
  • 1991 - 1991 Bernardin Mungul Diaka
  • 1991 - 1992 Jean Nguza Karl-I-Bond
  • 1992 - 1993 Étienne Tshisekedi
  • 1993 - 1994 Faustin Birindwa
  • 1994 - 1997 Kengo Wa Dondo
  • 1997 - 1997 Étienne Tshisekedi
  • 1997 - 1997 Likulia Bolongo

[kobalola] Jyografi

Bakarta ya Nkota makonzi ya Babantu oyo makutani o Ekolo Kɔ́ngɔ
Enlarge
Bakarta ya Nkota makonzi ya Babantu oyo makutani o Ekolo Kɔ́ngɔ

Ekakoli ya molayi : Jyografi bya Kɔ́ngɔ-Kinshasa

  • Tala mpe : Zamba o Bassin ya ebale Kɔ́ngɔ | Liste des villes de la République démocratique du Congo

[kobalola] Ekonomi

Ekakoli ya molayi : Ekonomi ya Kɔ́ngɔ-Kinshasa

Tala mpe : Coltan

[kobalola] Kiltiri

Ekakoli ya molayi : Kiltiri ya Kɔ́ngɔ-Kinshasa


Bafeti mpe Mikolo ya bopémi
Date Nkombo na lifalansé Nkombo na lingala Ntembe
4 janvier journée des Martyrs de l'indépendance
17 janvier journée du Héros National et de ses compagnons d'infortune
30 juin date anniversaire de l'indépendance Mukolo ya Lipanda
16 février journée des Martyrs de la Démocratie Mokolo ya baye bakufa pona demokrasi
17 mai date anniversaire de la libération du Peuple de la tyrannie

[kobalola] Divers

  • Données chiffrées
  • Forces française hors de la métropole

[kobalola] Tála mpé

Commons
Wikimedia Commons ezali na ba media mosusu oyo etali:
  • Santé en République démocratique du Congo


[kobalola] Mankásá o libándá

Wikitravel ezali kopesa esalisi to mpe "guide" ya mobembo o [Kɔ́ngɔ-Kinshasa] na lisensia ya Creative Commons.



Bisé ya Afrika

Bisé ya Afrika ya méditeranéa : Aljeria · Ejipte 1 · Libîya · Maroc 3 · Tunisia

Bisé ya Afrika ya Weste : Bénin · Burkina Faso · Cap-Vert 2 · Côte d'Ivoire · Gambie · Ghana · Guinée · Guinée-Bissau · Liberia · Mali · Mauritanie · Niger · Nigeria · Sénégal · Sierra Leone · Togo

Bisé ya Afrika ya Katikati : Kamerun · Repubiliki ya Santrafrika · Republiki ya Kɔ́ngɔ · Republiki ya Kɔ́ngɔ Demokratiki · Gabon · Gine-Ekwatorial · São Tomé-na-Príncipe · Tshadi

Bisé ya Afrika ya Este : Burundi · Djibuti · Elitré · Etiopi · Kenya · Uganda · Rwanda · Seyshel 2 · Somalia · Sudan · Tanzania

Bisé ya Afrika ya Sidi : Sidafrica · Angola · Botswana · Komori 2 · Lesoto · Madagasikari 2 · Malawi · Morisi 2 · Mozambiki · Namibia · Swaziland · Zambia · Zimbabwe

Bisé mosusu : Sahara occidental 4 · Somaliland

1 ezali kaka eteni ya Afrika ndambo    2 ekolo oyo ekutani okati ya mayi-mozindo    3 ezali eteni ya Lisanga ya Afrika te    4 endimami na bikolo nionso ya molongo te, kasi ezali eteni ya Lisanga ya Afrika