Maladi ewutaka na makambo ya bolingo

From Wikipedia

genital warp (female)
Enlarge
genital warp (female)
genital warp (male)
Enlarge
genital warp (male)
Herpes genitalis (male)
Enlarge
Herpes genitalis (male)
Kosala bolingo esika ya liboso
Enlarge
Kosala bolingo esika ya liboso

Maladi ewutaka na makambo ya bolingo ezali eloko ya kokamwa te, mpo nakati ya batu 10 moto moko akozala nayango. Soki ozali kobimisa mayi ya bosoto esika ya sekele, to ozali na pota na koyoka mpasi okoki kokende komeka oyeba soki okumbi maladi ewutaka na makambo ya bolingo. Maladi ewutaka na makambo ya bolingo oyo eyebani mingi yango oyo: Chlamydia, Gonorrhoea, <Genital Warts> na Herpes Genitalis.

Okokumba maladi ewutaka na makambo ya bolingo na nzela ya:

  • Kosala bolingo esika ya liboso na esika ya sima
  • Poso na poso esika ya sekele soki ekutani
  • Kosala bolingo na monoko
  • Mama akoki kopesa mwana tango ya kobota

[kobalola] Nzela nini ya koyeba maladi ewutaka na makambo ya bolingo?

Maladi ewutaka na makambo ya bolingo ezali ya ndenge na ndenge mpe bato mingi bayebi te soki bazali nayango, mpo tango mosusu nzela ya kolakisa emonanaka te. Kasi soki omoni biloko oyo tokomi awa na nse, okoki kokende na bato ya sante bameka mpe ozua nkisi pamba na ndenge ya sekele. Nzela ya koyeba yango oyo:

  • Esika ya sekele kobimisa mai mingi koleka
  • Pota esika ya sekele
  • Kongwenye na esika ya sekele
  • Mpasi na tango ya kosuba
  • Mpasi na tango ya kosala bolingo

Maladi ewutaka na makambo ya bolingo mingi bakoki kobikisa. Kasi soki etuli, maladi ewutaka na makambo ya bolingo misusu ekobebisa nzoto libela lokola kozanga mwana mpoya basi na mibali. Komeka mpe kuzua nkisi mpoya maladi ewutaka na makambo ya bolingo ekosalama na Sexual Health Clinics / GUM clinics.

[kobalola] Komeka mpoya maladi ewutaka na makambo ya bolingo ezali nini?

Komeka esalamaka na dokotolo to efimiele mpe bakoki kosenga kotala nzoto nayo na esika ya sekele. Tango mosusu bakosenga makila to mosuba na mayi ya esika ya sekele.